Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
LE BLOG DE LA COMMUNAUTE CONGOLAISE D' IRLANDE
12 août 2010

Présidence CCI

Adresse du candidat Julien Muamba aux compatriotes Congolais de l’Irlande

Chers Compatriotes,

“Nzete ata evandi mbula kama na mayi, ekobongwana Ngando te”!

Bolamu pe misala ya moto eyebanaka na ndenge na ye ya kozala zala na baninga:

  • Na tango ya bis engo: feti, libala, bateme, soiree etc.

  • Na tango ya pasi: Matanga, liwa, Mpiaka etc.

Oyo nde bisika tozalaka zalaka ensemble biso tout, bino moko ba temoins.

To komi na ngonga ya verite na kati ya CCI. Moto ayebi milieu te abongi na mosala oyo te.

Keba ndeko, to lala pongi ya nguma!

Menuisier asalaka musala ya menuisier. Plombier asalaka mosala ya plombier. Pasteur asalaka musala ya ki Pasteur . Syndicaliste, ye na syndicat, musicien na musique, etc. etc.

Bo tikela nga musala na nga ya kolinga bato pe kokamba Communaute. Moto na moto na don na ye. Oyo nde DON na nga:

  • Na yebi pasi ya kotambola ndako na ndako, province na province po na ko tala pe kosunga ba ndeko;

  • Na yebi kobimisa mbongo ya mutoki na nga, na tina ya kosalisa bana Congo;

  • Na yebi kotambola na ba bureaux po na kobundela ba ndeko na nga;

  • Na yebi kotambola na camp ya ba refuges po na kosunga bana Congo;

  • Hopital pe prison nionso esika congolais amonisami, eyebi nga.

Tozali na mosala ebele ya kosala kati ya CCI:

  • Bana na biso ba zali na posa ya ba reperes.

  • Bana balingi kotanga te.

  • Ba drogues ekomi danger monene.

  • Bazemi ya bana na biso ya mike ekomi fleaux monene.

  • Culture na biso ezali kobunga, respect ya mikolo eza lisusu te. 

  • Ba mbula eko ya, ba bourses ekozala lisusu te po na bana ya Universite.

  • Ko dedouaner bilokonya diaspora ezali casse-tete na Congo.

  • Passeport na Travel Document, naza na solution n’ango deja!

  • Situation ya deportation nasili ko attaquer yango.

  • Ba problemes ezali ya mingi kati ya CCI. Bitumba eza monene bandeko, mais nzoku alembaka mino na ye te. Ezali mikumba na mesana komema.

Yaka Samedi le 14 Aout 2010 ko pesa nga permission na salela yo.

Kosala erreur te ndeko, vote utile ezali kaka moko: JULIEN MUAMBA, MOTO YA BATO!

O voter JULIEN Muamba eza lokola O MI VOTER YO MOKO! KO DOUTER TE. DOUTE EZA MABE, EZALI OEUVRE YA SATANA.

Mwana mama moto akosa yo te, yoka nga bien: BISO TOUT, TO YAKI NDE KOLUKA, KOSALA ERREUR TE. CCI il faut ekambama na ba connaisseurs. Yo na nga JULIEN, biso nde ba connaisseurs.

Moto ya libandi ata akati kovo, connaisseur akoyeba kaka....

Lobi na ko yebisa bino po na nini na boyi debat contradictoire.

Kanisa bien. Que vive la CCI, Que vive le Congo.

Dublin, le 12 Aout 2010,

Votre Serviteur JULIEN MUAMBA

Nzambe abatela biso.

Publicité
Commentaires
Publicité
Archives
Derniers commentaires
Newsletter
LE BLOG DE LA COMMUNAUTE CONGOLAISE D' IRLANDE
  • La Communauté Congolaise d' Irlande en sigle CCI est une association sans but lucratif, apolitique régroupant tous les citoyens congolais habitant l' Irlande et ayant pour but de servir d' un cadre envue de défendre les intérêts des congolais et...
  • Accueil du blog
  • Créer un blog avec CanalBlog
Catégories
Publicité